Na Roma, bapanzi nsango katoliko ya lokota ya lifalanse bakotala makanisi na bango
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Mokanda ya Santu-polo na ba Roma, libanga esimbi bulle d’indiction ya Papa, ezali liziba ya bobimisi makanisi eye esilaka te mpo na kolamuisa bakristu ya Roma mpe ya mokili na mbula eye ya Jubilé. Na yango lisanga ya bapanzi nsango katoliko ebengami “kolikya liboso ya elikya nionso” (Baroma, 4,18). Eloko ya ntina ekeseni na elikya na lolenge ya molimo oyo ye alingaka, “elikya ezali algorithme te”, elobaki mokambi ya dicastère mpo ya Communication ya Vatican, na bofungoli makutani ya mosala, bisalemi na lisanga ya ba médias katoliko, mokolo ya minei ya ntuku mibale na misato ya sanza ya yambo.
Mpo na Paolo Ruffin, mokambi ya kala ya etando eke ya leta ya Italia, “kibopanzi nsango eye ekangama na mabe na bomoni te ba moto ya mike mike ya malamu oyo ekolakisa bosolo”, elobaki ye, na botangi mokomi buku-mopanzi nsango moko ya Italia Italo Calvino na buku na ye Villes invisibles (1972).
Boluki bosolo, nzela etondi na mabaku
Mokonzi ya liboso laïki eye akotala likambo ya communication na Vatican, lisanga monene oyo ba média Radio Vatican- Vatican News bikosala kaka eteni moko, apesi likanisi na ba média katoliko ya koyanola na mabe ya mosala-bozangi na bopanzi nsango, IA générative mpe na baye ya mokili-bitumba, klima, migrations, démocratie na bokeli réseau ya makasi. “Tokoki kokoma litono moko malamu ya bato mpo na masolo ya bonkoko mpe koyeba kosilisa mikakatano bikoki kobima kati na bonsomi na kimokumba. Koluka lolenge ya kokolisa réseau participatif et créatif ya mokili ya katoliko», elobaki ye, andimi ete kobanga ekoki kokoma, na likambo ena, mopesi toli ya mabe.
Paolo Ruffin abengaki bapanzi nsango katoliko ya mokili ya lifalanse “kozua mokano ya kokende lolenge mokili elingi te” na koboya “komitika babangisa yo na ba conformismes ya sika”. Na bobosani te eloko ya ntina ya kokaba, o eleko eye ya bogangi, piloris to boucs émissaires.
Eklezia asengeli komilakisa, kasi kokonza na makasi te
Na likambo eye, episkopo ya ekolo France oyo akokamba Conseil pour la communication ya ba episkopo alobaki lisusu na bapanzi nsango eye ye amonaki: “Lelo, Eklezia ebongi te kokonza na makasi, kasi esengeli komilakisa”. Mgr Bruno Valentin, episkopo ya Carcassonne, asepelaki na ba ndakisa ya malamu bilobamaki na ba nsango ya France, lokola bofungoli ya cathédrale Notre-Dame, mobembo ya Papa n’Ajaccio to likambo ya kokamwa ya boom ya ba catéchumène na 2024, bizali kokokisama mpo na ba Vigile ya pasika ya mbula eye.
“Bituna (enquête) bikolakisa boboyi moko ezali kokola ya bato liboso ya ebele ya bansango anxiogène”, ebakisaki Paolo Ruffin, na bolobi ete bokasi ya motema pete mpo na bopesi motuya na botongi bisika ya ba nsango bikeseni: “Na kobikisa maloba tokoki kobikisa mokili”, esukisaki ye, na botangi Primo Mazzolan, sango mokomi ya Italia ya kati kati ya ekeke ya ntuku mibale, amonanaka lokola moko ya babandi ya Concile. Nsima ya bofungoli molulu ena ya mikolo ya Roma, bisika mitano ya bosololi bisalemaki, na boluki esika nionso biloko biye bikoki kotombola mbela ya média katoliko, ya mosala na ye mpe ya lobi na ye na boleki esika na ye mpenza kino kopesa nsango, kokende elongo to kotuna liloba ya Eklezia.
Ligne éditoriale mpe botosi ya magistère
Anne Ponce, mokambi ya rédaction ya la Croix, alobaki na bokuse mosala ya média katoliko. «Kozala te oyo akolekisa doctrine, kasi kolata yango na molulu, kolakisa mibali na basi banzengeneke ya nsango elamu, kozala na boyoki mposa ya bato ya lelo mpe koluka bosolo na nzela ya monene ya mokili». Moninga na ye ya hebdomadaire katoliko ya France Famille chrétienne, Antoine-Marie Izoard, akopesa eyano na botangi liloba moko mokeli ya ba Assomptionnistes. “Kosala ntango inso mpo na Roma, ntango mosusu kotia Roma pembeni, kasi koloba mabe ya Roma te”. Mituna maye bikokolisa eleko ya intelligence artificielle, na botungisi makambo malamu ya mosala ya bakonzi ya ba média.