Mpo na liyangani ya ba episkopo y’Amerika, mikano ya Trump “bikotungisa mingi"
Jean-René Bompolonga
Mgr Timothy Broglio, mokambi ya Liyangani ya ba episkopo y’Amerika apesaki maloba na maye matali mikano bebo maye mokonzi Donald Trump abimisaki na mikolo na ye ya liboso ya bokonzi.
Na communiqué moko ya mokolo ya ntuku mibale na mibale ya sanza ya yambo, Mgr Timothy alobaki ete mabongisami misusu bizali na ba mikano bizali “kotungisa mingi” mpe bikozala na ba “conséquence ya mabe”, atako misusu “bisengeli komonana na lolenge ya malamu”.
Mikano biye episkopo amoni mabe bizali “maye matali lolenge ya kosala na ba immigrés mpe bato bakima bikolo na bango, lisungi mpo na botomboli, kokolisa etumbu ya liwa mpe ya nzinganzinga”. Kasi, asepeli na mikano miye “bikolakisa bosolo ya moto nionso oyo ayebani mobali to mwasi”.
Bokaboli “makabo ebele” y’Amerika
Mgr Timothy Broglio abakisaki ete Eklezia katoliko “ezali nsima ya parti politiki moko te” mpe “ezala nani azali na Ndako Pembe to azali na baponami ebele na Capitole, mateya ya Eklezia bikobongwanaka te”.
“Tokolikya”, elobaki Mgr Broglio, “ete bakambi ya ekolo na biso bakotala lisusu misala maye bizali kotosa te bomoto ya ndambo ya bato, kasi ya biso banso”.
Episkopo asukisaki liloba na ye na bolobi tè akosambela mpo ete “lokola ekolo epambwani na makabo ebele”, misala y’Amerika bikoka “kolakisa bokebi ya solo na bandeko na biso ya basi na mibali baye bazangi makoki, na kati wana bana bakobotama, babange na bibosono, na mpe ba migrants na baye bakima bikolo na bango”.
Mikano bitali immigration bizali kofinga Nzambe
Na lisakoli mosusu, episkopo Mark J. Seitz d’El Paso, mokambi ya Comité ekotala likambo ya migration ya Liyangani ya ba epsikopo y’Amerika, alobelaki mikano wana. “Mbano ya ekolo ekoki kopesa te ba politiki maye ba conséquence bilongobani te na mobeko ya morale”, elobaki ye.
Episkopo ya El Paso, ezuami na ndelo na Mexique, atalisaki ete mikano ebele «bizuami mingi mingi mpo na kosilisa makasi ya bobateli ya bato bikomami na mobeko likonzi», mpe alobaki ete likanisi ya kobalola mobeko na oyo etali lotomo ya mabele «ekosala ebandeli moko ya mabe, na botelemeli ndimbola ya ba mbula bebo ya Cour suprême»
Asukisaki lisakoli na ye na kobenga mokonzi Trump akamba na «ndenge ya malamu»na bato ya Congrès mpo «na kokoma na libongisami moko ya bwanya mpe ya parti politki mibale na likambo ya immigration eye ekoki kosunga bolamu ya banso». «Bandeko ba ngai ba episkopo mpe ngai moko tokosunga yango na ba lolenge binso bikoki», ekomaki Mgr Seitz, na bobakisi ete «bakokoba kotambola elongo na bandeko ya mibali mpe ya basi ba immigrés na lolenge ya Nsango Elamu ya bomoi»