Ba mbela ya elikya, bilili ya bilenge ya France bilakisami na Odessa
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
Kobanda koleka mibu misato, bato ya Ukraine na Odessa bakobika na lolenge ya etumba eye Russia ekotisa na ekolo na bango moko. Atako nsuka ya etumba epusani naino te, kosunga bandimi bazala na kimia mpe na elikya ezali eloko moko episkopo katoliko amipesi, Mgr Stanislav Chirokoradiouk. Abandi exposition moko ya sika na cathédrale ya mboka ena pembeni ya mer Noire: bilili ntuku misato ya bana mpe bilenge ya France na ba mbela ebele ya kolendisa.
Lisungi ya molimo
Likanisi ebotami mosika te na Santu- Malo, etuka mosusu ezali na libongo, o eleko ya bokutani ya bilenge esalemaki na diocèse ya Rennes na mobu nkoto mibale na ntuku mibale na minei. Bilenge bakutani, o eleko ena, moto moko ya lisanga Caridad, oyo akomema lisungi na bato ya Ukraine bazali konyokwama na etumba. Moto oyo apesi likanisi ya kokoma mpe kosala bilili bizali na maloba ya kolendisa bakristu baye, epayi esusu ya Poto, bazali koyoka mpasi mikolo minso mpo na etumba. Wana, na elili ya mwa esengo Marcel Callo, martyr ya Rennes ya bikeke nkoto mibale, atindamaka na bakonzi ya Nazi likolo ya boyambi ya ye ya katoliko, oyo azalaki kaka kolendisa bayebani na ye na ba mikanda na ye.
“Ntango natindeli ye na Internet ba photos ya bilili, episkopo ya Odessa asepelaki makasi mpe asengaki ngai namemela ye yango mpo atanda yango na cathédrale”, elobi Irenée de Poulpiquet, mokambi ya misala ya lisanga ya Caridad.
Yango wana azuaki na bisaka na ye bilili mpe amemaki yango na Ukraine na ebandeli ya sanza ya yambo mpo ete bilakisama na miso ya bato banso ya Ukraine na Odessa. Mgr Stanislav Chirokoradiouk akolikya kutu ete bilili bilakisama na bituka bisusu bizali na mpasi ya etumba lokola Kherson. “Bilili ya bana bizali ntango inso biloko bikobeta mitema ya bakolo, mpe eye ekobeta bango mingi, ezali ya komona tè babosani bango te mpe bazali kosambela mpo na bango”, ekobaki Irenée de Poulpiquet.
Bobangi kopola
Pamba tè, kopola ekolakisama ntango mosusu na bilongi ya bato ya Ukraine, mingi mpenza epayi ya bana, baye bakoki lisusu te koseka, elobaki ye. Akotanga bongo boye na boye bankunda bizali kokoma ebele, esika wapi ba bendele ya Ukraine bikobotama, lisolo ya mwasi moko atiki kotonga ndako na ye (“ezali na ntina te, ba russes bazali koya”), moko mosusu alalaka lisusu te, atungisami na eye ekokomela bayebani na ye to bana baye misato bazali kofanda na orphelinat pembeni ya Jitomir. “Misato bakende bitumba, moko azongi te”, elobaki mamelo oyo asungaki bana mibali wana ba mibu bebo.
Kobanda mibu milayi misato, lisanga ezuami na Bretagne ekokoba kosunga diocèse ya Odessa, na nzela ya makabo mpe biloko ya kolia, bomoko kati na bakristu ya bipayi mibale ya mokili ya Poto, mpo na kobatela moto ezali kopela na elikya.