Mpo na episkopo ya lokumu Gugerotti, bakristu basengeli kosala mosala ekomonana na Syrie
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Nzela kolongwa Damas kino Alep ekopesa elili ya martyro eye Syrie ayokaki na ba mibu zomi bileki. Na kobima na etuka, bato ya mobembo bakomona na miso na bango ba ndako ya ba soda bitikala mpe biyinda na moto, bilili ya Bachar al Assad bipaswami mpe bizikisami, bibombami nsima ya ba bendele ya sika ya ekolo, mituka ya mampinga bitondi na masasi na autoroute mobimba, mpe bisika ya kovanda mingi bikomi mabanga na mabanga.
Nzinganzinga eye ya mawa ekokoba kino pembeni ya Hama, epayi wapi ba usines bikangi mpe epayi wapi bandako mingi batonga bibebi. Se bongo, nzinganzinga ya Homs ba mboka bilandani bikomi lokola biliki, kolongola ndambo ya bisika bato bakima bitumba bafandi. Ezali se bongo na campagne ya Idlib, epayi wapi bobebi ebakisami na mabe esalemaka o eleko mabele eninganaka na mobu 2023.Na nsuka, nsima ya bisika ba soda batelemi mpo botali mikanda, ebimi Alep, etungisami na mpasi.
Syrie ya sika ezali naïno kobotama
Na mobembo na Syrie kobanda ntuku mibale na misato kino ntuku mibale na libwa ya sanza ya yambo, episkopo ya lokumu Claudio Gugerotti, préfet ya dicastère ya ba Eglises orientales mpe motindami ya Papa, akomaki n’Alep mokolo ya eyenga ntuku mibale na motoba ya sanza ya yambo. Ezalaki kala etuka ya misato ya bakristu na mokili ya ba arabes, epayi wapi bakristu koleka 300.000 ya biyamba bikeseni zomi na mibale. Lelo, etikali na nse ya 30.000. “Syrie ya sika ezali naïno kobotama”, elobaki ye na bandimi ya rite latin basangani na ndako ya Nzambe monene Santu-François. “Kasi ntango akobotama, akozala na mposa ya mama-mobotisi ya malamu, mpe ezali mosala ekotala bakristu”.
Episkopo ya lokumu andimaki ba mikakatano mpe bozangi koyeba maye bakristu ya biyamba banso bakokutana na yango, kasi alobaki ete bobangi na bango emema na bokangi maboko te. Bakristu ya Syrie basengeli kosala oyo bakokoka mpo kosala mosala ya lolenge moko na bato basusu mpe bozui makoki ya kopesa mpo na botongi ekolo ya sika, elobaki ye.
Episkopo ya lokumu Claudio Gugerotti akabolaki mawa ya Papa François na bandimi ya Syrie. “Kozala moto se moko”, elobaki ye na liteya na ye ya misa mokolo ya eyenga, “elingi koloba ete bato banso bazali na ntina lolenge moko. Ebongi te kimoyimi ezala; ezali mosisa mpenza ye bomoi ya bakristu”.
Bokutani na mama ya sango moko bayibaki ye
Nsima ya misa na ndako Nzambe epesama na ba Franciscains, motindami ya Papa akutanaki na bato ya libota ya sango moko bayiba ye na 2012, mpe na nsima abunga na sango moko ya grec orthodoxe azalaka na mobembo na ye. Mama ya sango alobaki na mayi na miso mpasi na ye, na bolakisi mawa ya moto akoki kosala matanga ya nzoto ya mwana na ye te. Mpo na ye, elikya se moko ya Syrie ya sika ezali na likambo ya bozui lilita epayi wapi akoki kotika fololo moko.
Ba mpasi bato bayokaki bilobamaki lisusu o eleko ya bokutani na ba mamelo baye moko na bango y’Alep awaki na missile na ebandeli ya etumnba.
Bozongi ya ba réfugiés
Na couvent ya ba Franciscains, préfet ya dicastère mpo na ba Eglises orientales asukisaki mokolo na bokutani na ntoma ya Italie, Stefano Ravagnan, mpe haut-commissaire ya Nations-unies mpo na ba réfugiés, Filipo Grandi.
Kobanda mokolo ya mwambi ya sanza ya zomi na mibale, lolenge mokambi ya HCR alobaki, ba réfugiés babandi kozonga na Syrie. Kino lelo, na nse ya 210.000 kati na bango bazongi na bowuti na bikolo ya pembeni mpe pembeni na bato 600.000 bakimaka bitumba o kati ya ekolo bakokaki kozonga bipayi na bango. “Ngonga ekoki mpo communauté internationale ezua mikano ya kosunga nzela ya transition mpe bobongisi ekolo”, elobaki haut-commissaire.
Episkopo ya lokumu asololaki na Filippo Grandi, na bolakisi ete esengeli kosangisa makasi mpo na kotonga ba bomoi mpe kopesa lisusu elikya na bato ya Syrie.