Luka

2025.01.27 Vescovi Presidenti delle Commissioni di Comunicazione e Direttori Nazionali degli uffii di Comunicazione 2025.01.27 Vescovi Presidenti delle Commissioni di Comunicazione e Direttori Nazionali degli uffii di Comunicazione  (Vatican Media)

Papa akolendisa mpo ya “bolongoli ebundeli na bopanzi nsango”

Na liloba na ye ya Mokolo ntuku mitano na libwa ya Bopanzi nsango ya bato (Communications sociales), Papa François akobenga baye bapanzaka nsango na bozongisi malamu na motema, kimia ya elikya eye ezali na biso. Na mokili moko epayi wapi masukulu ya nkanda mpe ya koyina bikomi ebele, Santu-Papa akopesa lolenge ye azali komona bopanzi nsango moko ekoki kosala biso bato ya kotambola elongo na nzela na bato ebele, na bolongoli ba makanisi ya lokuta na bobangi.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Ezali liloba moko ekoti mobimba na Jubilé ya elikya, eye ezali bobiangemi ya polele na bato ya kopanza nsango mpo kosala na koboya mokano ya “bobangi” mpe ya “bobwaki elikya”, ya “kokanisela mosusu mabe” mpe ya “kominyokwama mpo ya kosala mabe na mosusu”, ya “bokangemi na bindimeli ya lingomba” mpe ya “koyina” mpe bozui “likambo” ya elikya. François akoloba kuna likanisi na ye ya bopanzi nsango moko “etongami na motema kimia, ya pembeni” eye “ekoki kopesa elonga ya kolikya

Na botangi Don Tonino Bello, Bernanos, Martin Luther King mpe Benoît ya zomi na motoba, François akoloba liboso lolenge ye amoni eleko eye etondaki na “bopesi nsango ya mabe mpe ya ngambo moko”, bosangisi mpe kocontroler makambo mpe ba nsango na “mwa bisika bizali na bokonzi”. Bopanzi nsango lelo “ekosalela liloba lokola mbeli” mpo “kotinda bansango bikoki kotumola, kopesa nkanda, kozokisa”, elobaki Papa. Na bobosani te “kobalusa ebongisami ya bokebi”, elingi koloba likambo ya ba algorithmes bikotinda biso “lolenge ya makanisi ya zando” mpe “bikobongola lolenge biso tozali komona oyo ezali kosalema”. Mpota mosusu, “bolakisi ennemi moko” oyo tokolobela mabe na ndenge ekoki mpo toyebana”.

Bolongoli nkanda nionso na bopanzi nsango   

Mpo na François, “tokoki kondima mokano ena te” pamba tè “bokitisi oyo ezali kosalema ya solo na ba slogans ekoki komema eloko moko ya malonga te”. Mpo na yango, Papa François azongela yango mbala mingi ya “bolongoli ebundeli na bopanzi nsango, bokomisi yango peto na nkanda nionso” mpe mpo  na bayi bapanzi nsango bakoma “bapanzi nsango ya elikya

Lokola Bernanos azalaka kozongela yango, “elikya ezali likama ya komeka. Ezali kutu likama ya makama”, mpe lokola Benoît ya zomi na motoba alimbolaka “elikya ezali bosepeli eye ezali koleka te kasi likabo ya ‘kokolisa’, eye ekoki kobongola bomoyi", “likabo moko ebombani, makasi mpe ya kozela”, ebakisaki Papa. Na bokangemi na mokanda ya yambo ya Petelo, Santu Papa akopesa maloba misato ya bokangi: “elikya ya bakristu ezali na elongi moko, eye ya Mokonzi asekui”, yango ya yambo. Na nsima, esengeli kotelema “bozongisi malamu ya elikya eye ezali kati na biso”, bakristu bakolakisa “bozenga” ya bolingo ya Nzambe, “lolenge ya sika ya kozala na makambo manso”. Na nsuka, bopanzi nsango ya bakristu esengeli “etongama na motema pete, ya pembeni”.

Kobimisa kitoko mpe elikya

Wana ba ndoto ya Frnaçois, ya “bopanzi nsango moko ekoki kokomisa biso bato bakotambola elongo na nzela na bandeko ebele ya mibale mpe ya basi, ya kolamuisa kati na bango elikya na bileko biye ya kotungisama”, “ya koloba na motema, ya kobimisa te bizaleli bitondi na bokangemi mpe na nkanda kasi bizaleli ya bofungwami to ya bolingo”, “kobimisa kitoko mpe elikya, ata na bileko ntango mosusu ya bobwaki elikya”, “ya kobimisa bomipesi, bolingo, esengo mpo na basusu”, “koyeba bomoto ya moto nionso mpe kobatela elongo ndako ya biso nionso”.

Na nionso, Papa alingi te bopanzi nsango moko eye ekotekisa makambo ya lokuta na kobanga, moto akobela “bozali liboso to bolukiluki kosala”, mpe eye ekoloba mabe ya basusu. Akolinga kutu mompanzi nsango oyo akosunga baye bazali kolanda ye “ya bozali o kati”, “ya bozali pembeni”, ya “bozui ya malonga koleka ya bango moko”, mpe ya “bokoti na bizaleli na masolo bazali koyoka”.

Kobikisa ba mpota ya bato

Mpo na François, “elikya ezali ntango inso likambo ya lisanga”, pamba tè “tozali banso kokende na nzela elongo”. Jubilé ekolobela biso yango lisusu. Ekolakisa biso ete “esengeli bopanzi nsango moko ya bokebi, ya kimia, ya kokanisa, ekoki kolakisa ba nzela ya kosolola”. Papa akolendisa biso bongo ya “komona mpe ya koloba masapo ebele bikomema bolamu, bibombani na masusa y’actualité”. “Wana ekosunga mokili ya kozala matoyi mangongi moke na bogangi ya bana mike, mwa moke indifférent, mwa moke kokangema”, emonaki ye. Ezali bopanzi nsango ena eye “ekoki kosunga na botongi lisanga, ya kosala ete tobimaka mwa moke biso moko, ya komona lisusu ntina ya kotambola elongo”.

François akopesa mwa toli na bapanzi nsango, lokola kozala “moto azali pete” mpe kobosana “elongi ya mosusu te”, koloba na mitema ya moko moko, kotika te ba “réaction instinctive ekonza” liloba na bango eye esengeli “kobikisa ba mpota ya bato”. Basengeli kokoma banzengeneke mpe batomboli ya “bopanzi nsango ya mabe te, ekopesa liteya ya bokebi, ekotonga gbagba mpe ekotobola bizibeli bikomonana mpe bilomonana te ya eleko na biso”, mpe balobi “ya masolo ya elikya, na bozui na motema lobiko na biso banso mpe na bokomi elongo lisapo ya lobi na biso

 

27 sánzá ya yambo 2025, 17:06