Episkopo ya lokumu Koovakad aponami mokambi ya dicastère ya Lisolo kati na biyamba
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
«Kokamwa, esengo mpe kotungisama ebele liboso ya mosala monene ya kokitana moto moko mayele mpe malamu lokola episkopo ya lokumu Ayuso, mpe na moto moko ya boyambi bozindo mpe motongi monene ya kimia lokola episkopo Tauran». Wana ezali ndenge episkopo ya lokumu George Jacob Koovakad, mokambi ya mibembo ya Papa, ayambaki mokano ya Papa ya kopona ye mpo akamba dicastère ya Lisolo kati na biyamba (Dialogue interligieux), eye ekolendisa mpe ekobongisa boyokani na bato mpe masanga ya biyamba maye bizali te na lingomba ya bakristu, kolongola kaka judaïsme, eye etali dicastère ya Botomboli bomoko ya bakristu. Ndako ya makita ya Vatican abongisaki liponami ena mokolo ya mitano ya ntuku mibale na minei na sanza ya yambo. Akotikala bongo na mosala na ye ya sika. Apesi makanisi na ye yambo na Radio Vatican-Vatican News.
Lolenge nini oyambaki liponami ena?
Na esengo monene mpo na Papa oyo, ata sanza mibale te, akotisi ngai lolenge eyebanaki te na lisanga ya ba episkopo ya lokumu, aponi ngai episkopo mpe apesi ngai sik’oyo dicastère moko eye, kala mingi te, ekambamaki na moto moko ya bwanya mpe malamu lokola episkopo ya lokumu Miguel Ayuso Guixot mpe, liboso na ye, na moto moko ya boyambi makasi mpe motongi monene ya boboto lokola episkopo ya lokumu Jean-Louis Tauran, ye lokola kino nsuka ya bomoi na ye. Nakoloba ya solo ete yango ekotungisa ngai mingi mpe likanisi moko ya oyo ebongami te. Kaka na eleko ena, nakolikya mingi na bisambo ya baye banso bakolemba kolota te mokili moko ekozala biyamba ndenge na ndenge baye bakozala kaka esika moko te na boboto, kasi bakozala bango moko bileko biye bakoki kolongola te mpo na botongi boboto kati na bato. Nakolikia na mateya ya Santu-Papa, na nzela eye esalemi kala na bwanya ya bozindo na baye balekaki liboso na ngai. Mpe nakolikia mingi na lisalisi ya basali ya dicastère nakutanaki na bango ba ngonga bilekaki mpe bayambaki ngai na bolingo, mpe basali ete namiyoka epayi na ngai.
Obotami eleki mubu ntuku mitano na moko na Chetipuzha, na Ekolo ya Kerala. Lokola mwana ya Inde, atako ofandi mbula ebele mosika na ekolo na yo, okokumba kati na makila na yo likambo ya kofanda lisanga kati ya biyamba bisekeni…
Iyo, nabotami mpe nakoli kati na bato ya bokoko ndenge na ndenge mpe biyamba ebele, epayi wapi biyamba binso bikotosama mpe bikobongisa boyokani. Bokeseni ezali nkita! Nalingi naloba ete lisolo kati na biyamba na Inde ekangama banda kala na monachisme. Kobanda nkoto moko na nkama mitano, jésuite Roberto de Nobili alataki robe mpe bokoko ya ba moine ya Inde, na boyekoli minoko ya kuna mpe na boluki koyeba nionso ekoki kopesa lokumu na bonkoko ye azalaki komona. Kosala ena ezangi mokakatano te, ata soki, lokola Papa akoteya biso, na kobima mpe na botamboli, tokotungisama suka suka na eloko moko. Kasi eloko nalingi naloba, ezali ezaleli ya bofungwami, ya bolingo mpe ya kozala pembeni na bato ya lolenge mosusu. Boyambi ya mokristu ezali na makoki ya kosangisa: bakristu babengami bazala mbòto ya bondeko mpo na banso. Wana elingi koloba te tè kotika bomoto ya yo moko, kasi koyeba ete bomoto ya yo moko ebongi te mpe ekobonga te ezala ntina mpo na kotelemisa bifelo to koboya basusu, mpe ezali eleko moko ya kotonga tango inso ba gbagba. Lisolo kati na biyamba ezali kaka te lisolo kati na biyamba, kasi kati na bandimi babengami ya kotatola na mokili bonzenga ya boyambi Nzambe, bosaleli ya kokaba ya bondeko mpe ya botosi.
Moko ya misala ya dicastère na yo ya sika ezali ya boyokani na mokili ya islam. Nini okoki koloba na biso na likambo lina?
Concile oecuménique ya Vatican ya mibale epesa nzela ya eleko ya sika ya boyokani na biyamba misusu na bongo na Islam. Nalingi koloba lisusu maloba mpe bilembo ya ba prophète, lokola eye ya santu Polo ya motoba oyo, na pélérinage na Uganda na 1969, akumisaka ba martyrs ya yambo ya bakristu y’Afrika na kosala bokeseni esangisaka bandimi musulmans na martyre bayokaka bipayi ya bakonzi ya ba mboka na bango. Nakanisi lisusu maloba ya santu Yoane Polo ya mibale na bilenge musulmans na Casablanca na Maroc, na 1985, ntango ayebisaki bango: “Tokondima Nzambe moko, Nzambe se moko, Nzambe azali na bomoi, Mokonzi oyo asali mokili mpe amemi baye ye asala na botomboli bizaleli”. Nsima ya mibu zomi na motoba, kaka santu Papa ena alekaki mpo na mbala ya liboso ezibeli ya mosquée moko na bokoti na mosquée ya ba Omeyyades na Damas, o eleko ya mobembo na ye na Syrie. Elili ya Benoît ya zomi na motoba kosambela na kimia na Mosquée bleue ya Istanbul na 2006 ezali lisusu na ba bongó na biso. Mpe ndenge nini ya koloba te misala ebele ya Papa François, lokola kotia maboko na mokanda etali bondeko ya bato ye mpe na imam monene y’Al-Azhar, Ahmad Al-Tayyeb mokolo ya minei ya sanza ya mibale 2019 na Abu Dhabi, elandisamaki nsima ya mobu moko na encyclique Fratelli tutti.
Makambo yo otangi bizali nionso kokangama na ba pélérinage ya ba Papa mpe yango ekotinda ngai na sangisa eye elobami kino sik’oyo na mosala na yo ya kobongisa mibembo ya François…
Ezali ya solo, mibembo ya Santu-Papa bizali mingi ntango inso na likanisi ya kati na biyamba, na makutani na batindami ya biyamba misusu, bileko ya bondeko lisanga. Nakokanisa na mobembo ya eleki mwa mikolo n’Asia mpe n’Océanie, na sanza ya libwa ya 2024, ntango François abenisaki “nzela ya boyokani” eye esangisi mosquée na cathédrale ya Jakarta, na Indonésie. Nakwamisamaki mingi na bilembo ya boyokani ya Imam ya Monene Nasaruddin Umar. Na ndako ya ntoma ya Papa mpe basali ya service ya mibembo ya Secrétairerie ya Leta -baye nakopesa longonya mpo na mosala esalemaki-, tobongisaki yango mikolo ebele, na bosololi na bakambi musulmans, mobembo na Dubaï ebongisamaka na ebandeli ya sanza ya zomi na mibale ya 2023 o eleko ya COP28 na likambo ya mbongwana ya klima, mpe elongwaki mwa mikolo liboso ya kokende likolo ya convalescence ya Papa. Mpe nalingi naloba likambo ya kitoko namonaki mwa ba sanza moke liboso na Mongolie, epayi wapi kaka 1,3% ya bato ezali mokristu. Nabosani te mibembo misusu ya Papa na Kazakhstan mpe na Bahrein. Na oyo etali dicastère mpo ya Lisolo kati na biyamba ezali na nionso ya sika mpo na ngai, kasi nakanisi na lolenge ya mosala nasali kino lelo, mpe nakokoba kosala na bobongisi mibembo, esungaki mpe ekosunga lisusu. Na wana, nakolikia ete mosala na ngai na ba ndako ya bantoma ya Papa n’Algérie, na Corée ya sudi mpe na Iran ekosunga mpe ngai. Na mobu nkoto mibale na ntuku mibale na moko, namikotisaka naïno te na mibembo ya Papa, kasi bilili ya masolo ya Santu-Papa n’Ayatollah Monene Sayyid Ali al-Sustan na Nadjaf, na mobembo etikala na lisapo na Irak, bitikala na bongó na ngai.