Luka

2024.03.28 TERRA SANTA GUGEROTTI 2024.03.28 TERRA SANTA GUGEROTTI 

Episkopo ya lokumu Gugerotti na mobembo na Syrie

Kobanda 23 kino 29 ya sanza ya liboso, Mokambi ya ba Eglises orientales akosala mobembo bipayi ya masanga lolenge na lolenge ya bakristu ya ekolo, eye ekoti na eteni esusu ya sika ya lisapo na yango.

Jean-René Bompolonga

Na bosengi ya Papa François, episkopo ya lokumu Claudio Gugerotti, Mokambi to Prefet ya dicastère ya ba Eglises orientales akokende lelo mokolo ya minei ntuku mibale na misato na Syrie, na boleki na Beyrouth, na ntina ya mobembo ezali bokutani na ba masanga lolenge na lolenge ya bakristu ya ekolo. Episkopo ya lokumu azelami na Damas, mboka mokonzi ya ekolo, kasi lokola n’Alep mpe na Homs. Ntina ya mobembo ezali “komema ekopi ya Papa mpe lipamboli na ye na ba katoliko ya ekolo ena”, esemboli communiqué ya dicastère.

Papa, elobi lisusu communiqué, ekolikya, «na lolenge ya lelo ya Syrie» ete bandimi «bayoka bolingo mpe bolendisami ya Eklezia katoliko mobimba mpe, mingi mpenza, ya episkopo ya Roma, oyo akolemba te kosambela mpo na bango”. O eleko ya mobembo na ye, episkopo ya lokumu akokende elongo na Mgr Michel Jalakh, secrétaire ya dicastère mpe moko ya ordre maronite antonite, mpe na secrétaire ya ye moko, Sango franciscain Emmanuel Sabadakh.

Makambo Papa alingi mpo na Syrie

Mobembo ena ekopesa nzela ya koyebisa lisusu makambo Papa alingi mpo na Syrie na ntago ekolo ezali na etape mosusu ya lisolo na ye, nsima ya bokweyi mokolo ya mwambi ya sanza ya zomi na mibale eleki ya Bachar Al Assad mpe bokomi na bokonzi ya transition ya groupe ya islam HTS (Hayat Tahrir Al Sham). Santu-Papa akolikya bongo bolongoli ba sanction bitali nkita ya ekolo, mpe eye “bikotisi bana ya Syrie na mpasi mpe bifungoli bokimi ekolo na mawa”, elobi dicastère oyo ebimisi mposa ya Papa ya “kotonga ekolo moko na kimia eye bomengo ekozala mpo na bato banso, na botosi ya bonsomi, ya bomoto mpe na bokeseni, na bobandi kobongisa mobeko likonzi ya ekolo”. Papa alobi lisusu Eklezia katoliko “ekosala lolenge inso mpo  na kosunga, lolenge ekokoka na mbotama ya sika ya Syrie ya lokumu”.

Manaka ya mobembo

O eleko ya mobembo na ye, episkopo ya lokumu Gugerotti, elongo na ntoma ya Papa, epsikopo ya lokumu Mario Zenari, akokende kotala ba episkopo, ba sango mpe bandimi katoliko na ba cathédrale moko moko: grecque melkite, (bokutani na patriarche Youssef Absi mpe participation na Divine litugie), maronite, chaldéenne, syrienne, arménienne mpe latine, na bosangisi losambo na moko moko na bango. Na Damas mpe n’Alep, akokutana na bakambi, ba sango na ba laïki ya ba masanga na ba masanga bikosalisa mpo na lisungi bisika wana. Akozala lisusu na liyangani ya ba episkopo katoliko eye ekosalema na Homs. Esengeli koyeba na nsuka ete mokolo ya ntuku mibale na mitano ya sanza ya liboso, feti ya mbongwana ya santu Polo mpe mokolo ya nsuka ya octave ya losambo mpo na bomoko ya bakristu, episkopo ya lokumu akosala misa na Mémorial ya santu Polo, “etongami na esika tradition elakisa na likambo eye ebongola bomoi ya apostolu ya ba Gentils”.   

23 sánzá ya yambo 2025, 14:03