Angelus: Mokili ya lelo esengeli na mwinda mwa Yezu
Albys KBD, cp – kinshasa/RDC
O boso bwa ebele ya bandimi basanganaki na place Saint-Pierre na nsé ya moyi makasi, Tata-Mosantu alobelaki nsango elamu ya santu Luca (lc2,22-40) ut’o lininisa ya ndako ya bontoma, tango Maria nà Yosefu bamemi mwana Yezu o tempelo ya Yeruzaleme lokola ekomama o mibeko mwa tango ena. Elembo ekokisamà bileko nà bileko na ba-Israel, kasi o mokolo monà, “likamwisi esalemà nayino liboso, ekokisami”
Nzambe okati (elongo) ya bato bayé
Bongo Pàpa alimboli mayoki ma babangé babalé Simeoni nà Anna na tango bakutani na mwana yezu bongo basakoli. Bazali kobete lisolo, mingongo babango, miyokani makasi kati na bakolo yak ala bazalaki o tempelo nakosakola makokisami ya oyo ba-Israeli bazalaki kozela. “Nzambe azali solo o kati y abato bayé, nzokandé mpo ya ndako ya bifelo baneyi tè kasi mpo ayei kozala lokola moto mpe elongo nà bato”. O kati ya kibobangé ya Simeoni nà Anna, elimboli Franswa, “ekokisami eloko moko ya motuya oyo ebongoli lisolo mobimba ya mokili”.
Nakoyoka maloba manà, Maria nà Yozefu bakamwi, lolenge Simeoni azwi mwana o maboko mayé, mpe amoni o kati ya yé “libiki”, “mwinda”; “elembo ya bokeseni”.
Yezu Azali libiki, mwinda mpe elembo ya bokeseni
Mpo ya yambo, Yezu azali libiki. Simeoni abeleli ete libiki ya bato banso emonani na mwana yezu, bosolo moko ya kokamwa elakisi ete bolingi bwa libiki lya Nzambe, ebongwanaki mpenza o bomoto bwa moto moko. Na nsima, Yezu azali mwinda, akongengisa mokili lokola moyi mwa ntongo, ekokimisa bongo “molili mya minyoko, mya mabé mpe ya kufa (liwà)”, oyo mpo ya Pàpa, ekokoba koyokisa mpasi bomoto . “To sengeli lisusu na mwinda mona makasi, lelomei”, elobi Franswa.
Na nsuka, Yezu azali elembo ya bokeseni, oyo ekokundola bosolo na bonkuku bwa motema bwa moto. Na nzela ya ye, lisolo esambisami na lolenge lyoko: oyo ya bolingo, “lolenge ya kobeta lisolo ya mokili mobimba mpe ya likamà lyayé, nà mpe lisusu bomoyi ya moko na moko ya biso”. Mp ona Pàpa, “oyo alingi azali na bomoyi, oyo akoyina asili akufi”.
Na bokutani ya Mokonzi
Na bosukisi, Pàpa Franswa alendisi bandimi nakotalela ezeleli lya bang ona molimo nakomitunaka: “Eloko kani nakozelaka na bomoyi bwa ngai? Elikya monene ya ngai ezali nini? Motema mwa ngai mokobila sé na mokonzi? Nakozela solo bomoniseli ya mokano mwa lobiko mpo ya bomoto.”
Lokola momeseno ya ba lomingo, Tata-Mosantu abwaki mbela ya kosambela Maria, ya mbal’oyo, “mpo akende kotika biso na nzela yam inda mpe bilili lisolo, na bokutani ya mokonzi”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.