Luka

 TANZANIA: Episkopo ya sika TANZANIA: Episkopo ya sika  

Tanzanie: Episkopo ya sika ya diosezi ya Iringa, Sango Romanus Mihali

Tata-mosantu andimaki o mokolo mwa mosàlà 2, botiki mosàlà ya kokamba diosezi ya Iringa na kati kati ya Tanzani, oyo Mgr Tarcisius Ngalalekumtwa alakisaki yé. Mpo ya bokitani na yé, Pàpa apesi esika enà, na Sango Romanus Elamu Mihali, Nganganzambe ya Mafinga. Azalaki tee na moyi ya lelo Episkopo molandi mpo na basango ya diosezi ya Mafinga mpe Sango mokonzi ya Ujewa.

Bansango ya Vatican

 

Pàpa akomisi Sango Romanus Elamu Mihali episkopo ya Iringa, oyo a kitani na Mgr Tarcisius Ngalalekumtwa. Mgr Romanus Mihali abotamaki mokolo mwa 10 ya sanza ya yuni ya mobù 1969 na mboka Itulituli Mufindi, a salaki kelasi na ye ya filosofi mpe ya teologi na Seminaire monene ya Peramiho na mboka Songea. Akulaki bonganga mokolo mwa 13 ya sanza ya yuli ya mobù 2000 mpo na etongà ya Iringa.

Akambaki na bisika biye mpe asalaki bakelasi biye : Mokambi molandi ya Saint Paul The Apostle na mboka Ilula, Iringa ut’o mobù (2000 kino 2003) ; Molakisi mpe moyangeli ya seminele ya moke Saint Kizito na mboka Mafinga ut’o mobù (2003 kino 2005). Nsima akobaki kotanga mpo ya kokoma moyebi na ntina ya matangi ya zoologi, licence moko na Sciences Naturelles mpe license mosusu na Science ya éducation na université ya Kerala, na ekolo ya Inde ut’o mobù (2005 kino 2011). Azalaki lolenge yoko Sango molandi ya paloase ya Ngondo Maria ya Fatina (Vierge Marie de Fatima) na mboka Usomaki, na Iringa ut’o mobù (2012 kino 2015), mpe Sango Mokonzi ya paloase ya Vierge Marie de l’Assomption na Ujewa, na Iringa ut’o mobù (2015 kino 2024).

Nsima ya bokeli Diosezi ya Mafinga o mobù 2024, Mokonzi ya yambo amikotisaki na diosezi ya sika. Ut’o mobù 2024, azalaki Episkopo molandi mpo na etonga mpe mokomeli na bokolongono bwa nzoto ya diosezi ya Mafinga.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa 

28 sánzá ya yambo 2025, 11:46