Pàpa alingi ete IA ebebisa (ekomisa mbeka) te lokumu ya bomoto mpo na kopesa nzela na bokokisi ya mosàlà.
Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC
Akokaki te kolekisa likambo ya Mayele yak osala (IA) na ebandela ya mobù moye. Ezali na mbebo (minoko) ya banso mpe na mito ya banso, eloko ya kosalela mombongo ya minene mpe esaleli ya mayele mpo na baetukà ebele. Liyangani ya mokili mobimba mpo na mombongo, ezali na bokutani ya mobù mpo na bikolo minene batalelaka mbongo na mokili, ezali na moto ya lisolo “Kosala elongo na eleko ya mayele”. Nde na likamb’oyo papa apesaki nsango ya yé o mokolo mwa 23 ya yanuali, akanisaki ete “momeseno ya bonkoko ya bokristo ekozwaka likabo ya mayele lokola eloko ya motùyà ya moto akelami na ‘elilingi ya Nzambe’” mpe ete eklezya ezalaka kaka mosungi ya bokoli ya siansi, teknologi, misàlà ya maboko, mpe “lolenge misusu ya misàlà ya mangombà ya batu”.
Likambo IA ekoki kobimisa
Tata-Mosantu azali kokweisa IA te kasi akebisi ye, mpo na “likambo akoki kobotisa na bomoto ya batu na mokili”. Solo, IA elobeli « mituna na makambo etali kokola ya bozangi bosolo na forum public » mpe “na oyo etali mokumba ya bizaleli malamu, bokengi ya bato mpe mbano monene ya bokoli bwayé mpo na lisanga ya bato ”.
Soki tolingi kolobela likambo ya “mayele”, oyo “ebongi te” mpo na bokonzi monene ya Pàpa, mpo l’IA ezali n’ango kaka mbuma ya mayele ya bato, kasi ezali lolenge ya mosàlà ya bato, l’IA, « Soki esalelami malamu esalisaka moto na kokokisa mposa yayé, na bonsomi mpe na bontoki » elobi Pàpa.
Baboyi ndakisa ya bokonzi ya tekiniki
Kasi ezali na likàmà moko, elobi bokonzi monene ya Pàpa, oyo « AI esalelamaka mpo na kotombola » « ‘ndakisa ya bokonzi ya tekiniki’ oyo ekozwa makambo ya mokili lokola eyano ekoki kokokisama kaka na nzela ya tecknologi». Bomoto mpe bondeko ya bato ekoma na nsé ya bokonzi ya “ koluka kolandela bokasi, lokola soki réalité, bolamu mpe bosolo ewutaki na nguya ya tekiniki mpe ya nkita”.
Sikawa, « bomoto ya bato esengeli ata moke te kobebisa lokumu na nkombo ya bokasi» elobi François oyo emonani polele mingi: «bokoli ya tekiniki oyo ebongisaka bomoyi ya moto nyonso te, kasi oyo ezali kokela to kolekela bokeseni mpe matata, ekoki kolimbolama te lokola progrès ya solo». Mpo na Tata-Mosantu, “Esengeli kotia AI na mosàlà ya bokoli semba, ya bomoto, ya bomoi ya bato mpe ya ntina mingi”.
Yango wana ezali mokumba ya bikolo nà mangombà, mpe mokumba ya monene ya mingi koleka ezali ya biso banso, “nakotala nà bokebi esaleli moko na moko ya AI mpo na koyeba soki elendisaka lokumu ya moto, ba mposa na yé, mpe bolamu ya bato banso”, nakoyeba polele, lokola Franswa ayebi ete “makàmà ya bisaleli ndenge na ndenge ya AI eyebani mpenza te ut’o ebandela”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa