Pàpa abwaki mbela nakotangisa na botosi mibeko ya nzela
Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC
Koteya na kotosa mibeko ya nzela mpo ete kosala mibembo etikala libaku ya koyekola kasi ya mpasi ya somo te, nà mpe kozongelaka likanisi ya bokebi zinga zinga tovandi to lisusu bomatisi ntalo makasi ya esansi. Wana ezali makambo ma solosolo oyo Pàpa Franswa asololaki na bakambi mpe bayangeli ya Fédération ya italy ya ba clubs automobiles, oyo eyambamaki na bokutani ya mokolo mwa mosala mineyi mwa 23 ya sanza ya yanuali, na kati ya ndako ya Clémentine, na Vatican.
Tosengeli te kotikala kaka esikà moko
Kosala mobembo na motuka ekokani lolenge yoko na baye bazali kosala mobembo ya boyambi ya yubilé. Likàma ya banso ezali oyo ya « kotambola na nzela ya mabe », ezala na nzoto mpe na molimo, komimonisa « na mpasi » to « na kobunga ». Ezali kosekisa, tango mosusu tokokweyaka na mabulungani mpe tobosanaka esika tozali kokende. Franswa azongeli, na lisukulu oyo, ete Mobu Mosantu ezali komonisa « libaku ya kobandala lisusu », libaku ya kolimbola lisusu mokano ya nsuka ya moto mpe kopekisa bamabulungani ya nzela ebongwana mpo nakokoma mikakatano. «Tokelami te mpo na kotikala ya kotelema esika moko, kasi tozali koluka, nzela moko ya kokende na esika moko. Yango ekokokisama na mayi: mayi oyo ekangami nde epolaka liboso », emonisi-yé yango.
Kozwa mokano ya nsuka na kopona kati na « Mwinda (pole) » mpe « mikakatano »
Na kotambola ya molimo, esika ya kokende ezali « bikendelà te », kasi esika ya kokabola, ya bondeko mpe ya esengo. Kati na ba « mwinda » nà ba «mikakatano» ya mokili, Pàpa abwaki mbela ya kotika miso ma biso ya kobaluka «na bomengo ya séko lisanga na Yezu, na Maria nà basantu banso » Nabozangi kolembe nzoto, osengeli ntango inso kobandela lisusu na molende.
Koyeba makàmà ya nzela
Koleka ut’o banzela ya molimo kino na banzela ya mikolo minso, Tata-Mosantu amonisaki ntina ya koteya botosi ya mibeko ya nzela. Mosala moye mozali mingimingi na mokumba ya biteyelo mpe manaka ya mateya oyo etombolami na club ya mituka ya Italie. Misala miye mizali bobele te na kotinda boyebi ya tekiniki, kasi ezali na mokano ya kokolisa bososoli na mozindo ya makàmà, na mokano monene ya « moto moko te akufa na banzela ». Ezali mabongisi mpamba te kasi lotomo. Kosala mobembo ekokende elongo na koyekola, kokutana, kasi konyokwama te, kolele to mpe kokufa.
Likàmà ya mituka mpo na bolamu babiso
Na liloba “kotangisa, kolakisa”, Franswa abakisi liloba “nzinganzinga ya biso”. Solo, kotambola ya bamituka, ezali na likàmà ya motùya mpo na “esikà ya kovanda na lisanga” mpe na bomoyi ya malamu bato bazaleli na yango. Kokitisa mbano na yango ezali mokakatano ya lombango oyo ezali kosenge kosalela mabaku oyo epesami na ba technologies ya mikol’oyo pe kolendisa «boyokani pe misala na lisanga», pona bopanzani ya seko oyo bato banso bakoki kozwa. Mpo na kosukisa, Franswa apesaki baye bazalaki na masolo (audience) eye, mabota mabango mpe misala mabango na santu Christophe, mosantu mobateli ya bakumbi mituka.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa