Mozambiko : Pàpa akeli diosezi ya Alto Molócuè mpe akulisi episkopo ya yé ya liboso
Bansango ya Vatican
Mgr Estêvão Ângelo Fernando abotamaki o mokolo mwa 17 ya sanza ya yuni o mobù 1974 na mboka Inhassunge o kati ya diosezi ya Quelimane. Sima ya kelasi na yé na seminele propédeutique Santo Agostinho ya Quelimane, akotaki na seminele ya filosofi Santo Agostinho na Matola, sima na seminele ya téologi Saint Pie X na Maputo, wapi epayi azwaki licence na yé.
Akulaka bonganga o mokolo mwa 24 ya sanza ya yuni 2001. Nsima ya bokulisi bwayé, azwaki licensemoko na Téologi pastorale na faculté téologiki ya Triveneto ya Padoue ya mobù 2014, mpe doctorat na Téologi pastorale na université Pontificale ya Latran na Roma.
Mokonzi ya Yambo asalaki misàlà miye ya bontoki : Sango molandi ya paloase sima Sango Mokonzi ya Mocuba ut’o mobù (2001 kino 2006); moko ya commission Sud-africaine mpo ya bakimi-mboka ut’o mobù (2002 kino 2006); Moyangeli ya molimo ya Mouvement apostolique xavérien ut’o mobù (2003 kino 2010); moyangeli ya seminele propédeutique Santo Agostinho ya Quelimane ut’o mobù (2007 kino 2010); Mokambi ya commission ya communication ya Quelimane (2010 kino 2011); Mosàli elongo ya paloase Santa Maria Maggiore ya Cordenons, diocsezi ya Concordia-Pordenone na Italie ut’o mobù (2011 kino 2014); Mosàli elongo na paloase ya St François ya Assise na Pordenone o kati ya diosezi ya Concordia-Pordenone, na Italie ut’o (2015 kino 2019); Moyangeli ya seminele ya filosofi Santo Agostinho na Matola ut’o (2020 kino 2021). Ut’o 2022, azali moyangeli mpe econome na seminele ya filosofi São Carlos Lwanga na Nampula.
Diosezi ya sika Alto Molócuè
Bamabele ya sika ya diosezi ya Alto Molócuè (Molócuè Superioris) etangemi na bitùkà biyé: Mocubela, Pebane, Gilé, Mulevala mpe Alto Molócuè. Etanto ya sika ya eklezya ekosepelaka na bolamu ya diosezi monene ya Nampula. Esika ya diosezi ezali engumba ya Alto Molócuè. Eklezya ya paloase ebonzami na nkombo ya Nossa Senhora Rainha do Mundo ekomi eklezya katédrale ya diosezi ya sika.
Engebene na mitango epesamaki, diosezi ya sika ya Alto Molócuè efungwami na 28.632 km2 mpe motango ya 1.1999.649 ya bato bavandi na kati, oyo wapi 487.465. Ezwami na 14 paolase, etangemi na 21 Sango, oyo ezali na 11 mibonza, 16 bana ya seminele, 2 mibonza kasi bazali basango te mpe 26 mibonzà ya basi.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa