Luka

2025.01.26 Losambo la Angelus 2025.01.26 Losambo la Angelus  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Angelus: koyeba lisusu Yezu nalolenge ya sika ya kokamwa na mobù moye ya bule (Mosantu) .

Na libakù ya bosepeli lomingo ya liloba lya Nzambe na mbala ya motobà, Pàpa Franswa akambaki losambo ya Maria la Angelus ut’o bandako ya bopàpa. Na komaniola Nsango Elamo ya mokolo monà, Tata-Mosantu abiangaki bandimi basanganaki na Esika ya Mosantu-Petro na kokundola na Yezu mwana wa Nzambe, Mobikisi wa biso.

Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa 26 ya yanuali, lomingo la Liloba lya Nzambe ekosepelama na mbala ya motobà, mpe ebandisamaki na Pàpa o mokolo mwa 30 ya setembere ya 2019 mpo na kotalela makomi masanto, Episkopo ya Roma alobelaki Nsango elamo la mokolo monà mokolakisa biso Yezu o kati ya Sinagoga ya Nazareti, epayi wapi akolaki. Franswa atelemaki mingi na maloba maprofeta Izaya etangamaki na ye mei Kristo, « oyo ekolobela etindà ya bosakoli Nsango Elamu mpe ya bobikisi ya Masiya, zambi na kimya nionso abeti ntolo été : lelomei, maloba mana ma makomi makokisami », (cf. 4, 21)

Kobanda na makanisi teee na boyebi solo ya Mokonzi

Papa abengisaki yambo bayoki bayé bakanisa kokamwa mpe mawa ya baninga ya Yezu, « oyo bayebaki yé lokola mwana ya mosali mabaya Joseph mpe baye balingaki kokanisa soki moke te ete akoki komilakisa lokola Masiya ». Nzokande, sé lolenge wana mpeza makambo malekaki : Yesu asakoli ete, na nzela ya bozali na ye, “mbula ya boboto ya Mokonzi” ekómi. Oyo ezali sango elamu mpo na banso, elobi bokonzi bonene bwa Pàpa, « mpe mingi mingi mpo na babola, bakangami, bakufi miso, baye banyokwami ​​».

Mokolo monà, na Nazarete, Yesu akutisaki bato oyo bazalaki kosolola na ye na boponi oyo etali bomoto bwa yé mpe etindà yayé, elobi Pápa, nakolimbola ete mosakoli ya Nsango Elamu Luka ayebisi biso ete Ba-nazareti bayebaki te kati na Yezu mopakolami ya Nkolo. « Bakanisaki ete bayebaki ye malamu mingi mpe ete, na esika ya kopesa nzela na bofungoli ya makanisi na bango mpe mitema mya bango, ekangaki bango, lokola elamba oyo ezali kozipa pole (mwinda) », ebakisi yé.

2025.01.26 S. Misa na libaku ya Lomingo la Liloba lya Nzambe
2025.01.26 S. Misa na libaku ya Lomingo la Liloba lya Nzambe

Kokundola na Yezu mwana wa Nzambe mpe Mobikisi

O miso ma makambo monso mikokani (banalogies) mikosenge, Franswa na sima ayebisi bandimi ete « ekwélà ena esalemi  mpe mpo na biso lelomei ». Bongo, tobiangemi  mpe “na bozali mpe maloba ma Yezu”; tobiangemi na kokundola na yé mwana wa Nzambe, Mobikisi wa biso». Nzokandé, emonisaki yé, “ekoki koyela biso, lokola baninga ya mboka nayé, kokanisa ete tosi toyebi ye kala, ete tosi’ toyebi manso na ntina yayé, ete tokolaki nà yé, na Kelasi (eteyelo), na paloase, na malongi, na mboka moko ya mimeseno ya Katolike... Mpe na yango, mpo na biso mpe, azali Moto ya pembeni, ‘pene mingi’”.

Na koloba na bankoto ya bandimi mpe ba pèlerins oyo bayanganaki na Place Saint-Pierre, Episkopo ya Roma abengisaki bango, lokola molakisi malamu, mpo na komituna mituna oyo elandi: “Tozali koyoka bokonzi ekeseni na mosusu oyo Yesu ya Nazarete alobeli? Toyebi ete azali momemi ya Nsango ya lobiko oyo mutu mosusu akoki kopesa biso te? Bongo ngayi, nazali na mposa ya lobiko liyé? Nazoli koyoka ngayi mpe, lolenge moko boye, lokola mobolà, moto na boloko, na miso ekufá, nanyokwami? ​​Bongo sé bongo, “mbula ya ngolu” ekozala mpo na ngai mpe!”, ekitisaki bato motema Pápa Franswa

Yambo te asakola nsambo ya Maria ya Angelus ya lomingo linà, Tata-Mosantu abiangi bandimi babaluka na loboko na maria, Mama wa Nzambe mpe mama wa biso; “mpo ete asalisa biso na kokundola elongi ya Mwana wa Nzambe, mpo ete totikala na nsoni te na bomoto bwa yé mpe bolingi bwayé mpo na bana mike mpe babolà”. “Tósenga Maria ete na mbula oyo ya Yubilé, toyeba lisusu Yesu nalolenge ya sika ya kokamwa mpe toyoka nsayi na mitema mya biso na ndenge ya solo: iyo, ezali yé, ezali Mobikisi”, esukisaki bokonzi bonene ya pàpa.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

27 sánzá ya yambo 2025, 11:03