RDC: kati na kobwakama ya ba bombi nà kopunza (kobotolana biloko), Mgr Ngumbi abiangi na botosi makasi mpo na bomoyi ya bato.
Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC
Ezali esika ya bitumba efungwami na Goma, tanto mapinga ya basoda FARDC, ya RDC, ezali kokoba na kotelemela motungisi ya ba rebeli ya M23 nà basangani bayé ba-Rwanda, o kati mwa ba mboka ezoki nayino te. Makàmà ezali kozongela ba population mpe koyokana makasi. Bakobwaka babombi batala te, bazali kobebisa ba ndako, bazali koyiba na baekàlà na ba butiki, mpe bongo na bongo. Liboso ya mpasi ezali kokoba, Episkopo ya Goma oyo, azalaki kolaka bato banda mikolo mibale communauté internationale, soki “bakokaki kopekisa ete bitumba ekota na mboka te”, azongeli komonisa kokamwa ya yé, na nsango atindaki ut’o mokolo mwa 27 ya sanza ya yanuali, na ndenge makambo ezali kobaluka o kati ya enguma monene oyo ezwami n abato miliyon moko ya bato mpe bayé bazali kokima
Bomardema ya eteni ya Neonatologie ya lopitalo monene ya Lisungi ya Bomama (Charité Maternelle)
Na nkanda makasi ndé Mgr Ngumbi alobi ayokaki « bombardema oyo ya ya eteni ya Neonatologie ya lopitalo monene ya Lisungi ya bomama (Charité Maternelle) mpe esalaki liwa ya bana oyo babotami sika, mpe oyo ya ndako ya Sango mokonzi ya diosezi ». Mosusu ekweyaki na kan ya ba-kima mboka esalaki liwa ya bato ebele kati na bango bana ebele. Bongo na kotanga motuya ya bato balali na mabele ya enguma, ekotinda koloba ete “ezali likàmà linene mpo ya bato oyo ezali kosalema na Goma”. Epayi mosusu, mosala ya koyiba ezali kokoba, misusu ebongisami na population bango moko, eloko « ekobebisa koleka likambo ya bomoto oyo ezali kopesa mawa mingi», elobi oyo azali liboso.
Bozalani mpe mawa ya Eklezya mpo ya bayé bazuwi mpasi mpo na bitumba
Mobali ya Eklezya abiangi « na limemya ya solo ya bomoyi bwa moto, ya bandako ya bato mpe ya bato banso ». Alobeli « banso bazali o kati ya matata ya bitumba biye ya lelomei lokola mpe population », « na lokumu ya bomoto ya bato, mpe lotomo (ndingisa) kati na bikolo » elobi Mgr Ngumbi. Abeti nsete nayino na « kobatela bomoyi mpe banso bazala na makoki mpe koboya boyokisi mpasi na nzela ya bosangisi nzoto na makasi ». Lisusu, « azali kolaka population mobimba ya Goma bozalani mpe mawa ya Eklezya na mabotà manso ya bayé bakufi » na mobulù moye. A lendisi «basango, bamibonzà, bandimi mpe lokola, nà bato banso ba motema bolamu, nakolinga kosalisa na moto nyonso azali na bosengà».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.