Luka

Na ekolo ya NICARAGUA Na ekolo ya NICARAGUA 

Na Nikaragua, babengani bamamelo tuku misato (30)

Bonyokoli ya baye bazali koboya kondima makanisi ezali kokoba o kati ya ekolo ya Amerika ya katikati. Likambo ya baniango oyo bakangaki na monastele ya bango na Managua, Matagalpa mpe Chinandega, eyebani kaka te. Na zanza ya mayi 2023, Bakonzi ya Managua ba panzaki lisanga ya ba fransiscaines Clarisses. Mibù miwuti koleka, mangomba ebele ya baniango ebenganisami mwa ndambo to nyoso

Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC

 

Motango ya tuku misato ya bamamelo ya lingomba ya Sainte-Claire, bayebanà na nkombo ya Clarisses, babenganaki bango na ba monastele basato ya ekolo ya Nikaragua na mboka Managua, Matagalpa et Chinandega, na butù mwa mokolo 28 na29 ya sanza ya yanuali.

Bamamelo babenganisami na Mboka

Na sanza ya mayi ya mobù 2023, Bakonzi ya mboka bapanzaki lisanga ya ba mamelo ya ba Franciscaines y a clarisses mpe bongo masanga libwà mpe mangomba misusu. mangomba ebele ya baniango ebenganisami mwa ndambo to bango banso na ekolo ya Nikaragua, o mibù miwuti koleka, mingi mingi sima ya consultations controversées ya sanza ya novembere ya mobù 2021, na libaku oyo wapi Daniel Ortega aponamaki lisusu mpo ya mbala ya mitano, elandani mbala mineyi.

Bolendi bwa Pàpa mpo na ekolo mpe bandimi ya Nikaragua
Bolendi bwa Pàpa mpo na ekolo mpe bandimi ya Nikaragua

Mikano ya lolenge yoko ezwamaki mikolo mileki. Solo leta ya ekolo ya Nikaragua babangolaki lisusu ezalela ya masangà zomi ya mangomba oyo ekosalaka lokola organisations à but non lucratif, nde ememi bopekisi ya ba ONG koleka 5600 ut’o mobù 2018 na ekolo oyo ya Amerika ya katikati.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.

31 sánzá ya yambo 2025, 10:23