Mgr Ernest : Ekiménisme ezali te esika malamu ya komaniola, kasi mosala moko ya kosakola na bomoyi
Albys KBD, cp – Kinshasa RDC
Akopesa mbote ya bokabwani o mokolo mwa mosàlà mitano na Roma mpe na bandeko ba yé ba boyambi, kati na bango, mingimingi ba Tata Episkopo wa lokumu ya Curie, na tango ya milùlù ya losambo ya mpokwa kobanda na ngonga ya 17h elongo na lingombà ya anglicane na kati ya baziliki ya Mosantu-Polo- libanda- ya bifelo, liboso ya bansambo ya mpokwa ya mibale o mokolo mwa poso oyo Pàpa akokamba misa eyenga ya mbongwanà ya Mosantu Polo, yang onde ekosukisa poso ya losambo ya bomoko ya bakristu.
Mgr Ian Ernest akozonga o mboka ya yé yakobotama, esanga ya Maurice, epayi wapi azalaki Episkopo Anglican ut’o 2001 kino 2019, mobù baponaki yé na Roma na Mgr Justin Welby. Episkopo ya kala ya Cantorbéry aponaki yé lokola motindami ya yé moko o Ebonga-Esantu mpe mokambi ya centreanglican ya Roma.
« Na pusamaki makasi na ntango ya boyekoli bwa ngai na Angleterre na buku « Nzambe ya makambo ya kokamwa » ya Jésuite Gerard W. Hughes ». Mpe nasengeli koloba ete koponama na ngai na Roma mpe likambo ya kobengama mpo na kosalela likambo oyo ebandaki Kristu na mpokwa ya liwa ya yé ete « banso bazala moko » ezalaki solo likambo malamu ya kokamwa ».
Ngai ndé nani mpo ya kokokisa mosala moye?
Bomoni bozalaki mobimba te. Na bolengé bwa yé, Ian Ernest atangaki na eteyelo ya Katoliko, oyo mokambi na yango akomaki moninga ya tata na yé, Moyangeli ye mei. Mgr Ernest alobi boye: “Tata na ngai azalaki moto ya liboso oyo asalaki milùlù na lingomba ya Katolike nsima ya Concile Vatican ya Mibale, yango ndé ecuménisme “ezalaki likambo ya sika te mpo na ngai, kasi ebongisaki bomoyi bwa ngai” ekobi moyekoli ya kala ya filozofi oyo awutaki na Seminaire ya Katoliko ya Esanga Maurice. Tango akokisi bambula zomi na mwambe ya boepiskopo, akomaki moninga ya tata episkopo wa lokumu Maurice Piat, episkopo ya katolico ya Port-Louis. Yango ntina baponaki ye na engumba ya seko. Akamwaki mpe kutu, alobi na nkuku, lokola asengelaki “komonisa bondeko ya solo ya lisanga kati na lingombà ya Anglican” na mosala ya oecuménisme.
Lolenge yakosala ya Mgr Ernest ekabwani na biteni misato. Ya liboso, alingaki akutana na bayé bazalaki na mposa yakosala lolenge yoko na yé, “na maye matali Nzambe oyo amimonisaki na nzela ya Yezu-Kristo, oyo wapi tosengeli komonisa bozalisi bwa yé o mokili”.
Mpe ya bokutani boye “mingi na bolingo bwa Kristo - oyo epesi nzela ya kozala koleka bokeseni”, ebimi boyambi oyo, soki ezali moko na mosusu, epesi likoki ya koyebana moko na mosusu mpe kotika esika mpo na mosusu. “Moto ya yambo ayebaki ngai ezalaki ye mei Tata mosanto bosantu na ye na miso, le 13 octobre 2019 na esika ya liboso ya Place Saint-Pierre mpo na canonisation ya nganga-nzambe moko ya kala ya Anglican oyo akomaki Katoliko, episkopo wa lokumu mpe basantu bwa Eklezya (John Henry Newman)” ekanisi episkopo ya Anglican.
Mobembo mwa kimya na Juba
Bondeko bosalemaki kati na Pàpa nà motindami ya anglican ya mokonzi ya likolo ya communication anglicane ekomaki makasi, mpe boningà kati na Tata-mosantu nà Justun Welby, aponamaki na mobù moko na yé. «Lokola momonisi ya episkopo monenz ya Cantorbéry, elimboli Mgr Ernest, nasengelaki kozala na makoki ya koyebisa emonaneli na ye, mpo ete ye mpe Papa bakoka kokoma elongo na elikya na mokili oyo ekabwani kasi oyo ezali na mposa ya kimya mpe bosembo».
“Mobembo ya kimya” esalemaka na 2019 na ekolo ya Soudan ya Sudi nà moyangeli ya eklezya ya Ecosse, sima ya mwa ba mbula ya kotika mosàlà ya bakambi ya Soudan ya Sudi na Vatican, “etikali mpo na ye "ndakisa ya elikia ya solo” mpe “kosala na lisanga ya bango oyo ezali polele” mpo na “kotonga bokonzi bwa Nzambe”.
Ekimenisme, mosala moko ya kosakola na bomoyi
Na Rome, makita ekómi ebele, mingimingi na Centre Anglican . Poso na poso na tango ya milulu ya Ukaristya ya mokolo ya Mardi, oyo baepiskopo mingi ya Leklezya ya Katoliko basanganaki elongo, bakisa mpe ba tata episkopo wa lokumu, na ndakisa Secrétaire d’Etat to Secrétaire de relations ya ba etukà ya Ebonga-Esantu, kasi mpe bakambi mosusu ya bakristo. Boyokani mpe ekómi makasi na biteyelo ya Roma, kasi mpe na Institut katoliko ya Paris mpe na Institution protestant ya France. “Mgr Ernest alimboli ete: “Nayekolaki kososola ete bomoko ya bokristo ezali te esika malamu ya komaniola, kasi mosala moko ya kosakola na bomoyi
Esperianse ya Roma etondà na botondi
Alobeli bongo bangonga ya masolo “ya botuyà” esalemaki na libakù ya kobongisama ya Sinodi sur la sinodalité elongo na Cardinal Mario Grech mpe nmamelo Nathalie Becquart, secrétaire mpe sous-secrétaire ya Sinodi. “Eklezia ekotelemaka te na bopanzi mateya ewuti na liteya, esengeli kozala momemi ya Nsango Elamu oyo ekobongola makanisi,” elobi Mgr Ernest, na esengo ya nzela atamboli ya sinodi oyo Pápa apesaki.
“Nakoloba ete oyo ezali mpenza limonisi ya etinda ya Kristo : bilei oyo esangisaka, losambo, Liloba oyo eleisaka mpe masolo oyo epesaka nzela na oyo tozali na yango elongo, mpo na kosalela Kristo,” elimboli na bozindo episkopo ya esanga ya Maurice
Mokambi ya Centre anglicain atie makasi ete ezali « oecuménisme ya boyuma te » te, « moko na moko azali komema oyo azali na yango, boyebi na ye mpe mayele ma yé ». Alobi malamu été, nzela ya kotambola mpo ya bomoko, esalemi na mikakatano ekosenga mpiko nà molende, mpe ekowula sima na ngai. Kasi lelo, mwa bangonga yambo na bolongwi na ye na Roma, azali kolakisa esengo na ye ya kosimba na mosapi « oyo tosengeli kopesa ya moyuyà na lingomba ya mokili mobimba », « elongi ya sika » oyo azali kopesa makoki ya « Banso bandeko » (note Na kombo ya Encyclik ya Papa François ebimisamaki na 2020). Atiki Roma na «liloba oyo ekomami onteyi ya motema mwa yé», botondi. “Manso makokisamaki mpo ya ngrasya ya Nzambe”
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa