Esti ya RDC : nkita ya nsé ya mabele, ntina ya bozangi libateli (bokengi) mpe ya kokomisa bato babola
Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC
Sango ekoganga: Bana-mboka misato ya ekolo ya Chine bakatani na etumbu ya mbula sambo (7 ans) ya boloko na ekolo ya République démocratique ya Congo mpe kofuta amande ya 600 000 $ ya Amerika. Babali basato bina bakangamaki mpo na mbeba ya kotimola mabanga ma ntalo na ndenge ya kobuka mibeko mpe ya kobwaka mbongo, bongo bakutaki bango lisusu na sudi ya Kivu na 10 lingots ya wolo mpe motuya mbongo ya 400.000 dollars. Nsango ena elekaki o kati ya ekolo mpe na bikolo bisusu ya libanda. Ekwelà ena elamusi likambo ya kosalela nkita ya nsé ya mabele ya mboka enà na lolenge elongobani te mpe ya bobuki mibeko, mingi mingi na bitando ya Esti, enyokwami na mobulu ya ndenge na ndenge.
Sango Justin Nkunzi, tokoki koloba ete action judiciaire oyo kontre bawùtà ezali mbano ya kosukola klimaya mine, to kaka coup kontre bayé bazali na bokasi moke?
Matondi mpo na motunà moyé mwa ntina. Na banzi ete ezali likopa mpo ya bawùtà te, kasi yango elakisi mokano ya exécutif provincial ya sika mpe ekolo mobimba ekosenga komona polele mpo ya likambo etali nkita ya nsé ya mabele ya mboka mokonzi ena. Mpo ete ezali malamu te ete bato batambola na mbongo, wolo, bazala na nkita koleka bakolo mabele. Na kanisi ete, Prof Purusi, mokambi ya etukà ya Kivu amoni likanisi linà malamu mpo ya komonisa polele mpe kokangisa bato bina. Na lapi ete ezali likambo ya mpiko na bompikiliki. Nakani ete bato banso ya Kivu bazali sima lya likanisi linà, mpo yakosukisa mafia mànà, oyo ekomi lokola mobeko na etando ena ya mabanga mantalo.
Na lisukulu na ye, na tango ya liyangani ya Roma, Tata Episkopo wa lokumu Fridolin Ambongo afukisaki esaleli na nzela ya mibeko te, ya ba nkita ya nsé ya mabele ya RDC, alobeli mpe ezaleli ya mpasi oyo baCongolais bazwami mpo ya ba multinationales bazali kobimisa mabanga mantalo nakozanga kotalela makàmà ekomema na bato mpe na ezingeli ya bango. Ekolo eponi mabongisi bebo na mibù mileki ?
Ekolo ya Congo etie makoki ebele mpo ya misàla ya bokambi ya mabanga mantalo, lokola administration des mines, les cadastres miniers, les services d’expertise et de certification des minerais, mpe misala misusu lisusu. Kasi ata makoki mana, makambo mabé mizaki kokoba, mingimingi kokota ya bato bazali na ndingisa te ya kokota na bitando wapi epayi mabanga mantalo mizali. Manso mazali kotombola makambo matali bokasi bya misala mpe bomipesi ya ekolo na kobundisa ezaleli ena. Atako milende misalemi mpo na kolandela bato oyo bazali na mokumba ya makambo wana ya mabe, kozanga bokengi likoló ya bato misusu, bakisa nayino bampaya, na bisika biyé, ezali kaka likambo monene yakokamwa. Ba services ebele oyo ezali, emonani lokola été ezali kobimisa ba lifuti oyo ezelisamaki te.
Bisika bazali kobimisa ba mabanga ya talo, lolenge ezali komonana, bizali mingi mpenza bisika ya mpasi makasi, bato basenegeli kopesa mabele na bango ya bilanga, esika wapi bazali kozua mua mosolo mpe libiki ya libota. Nini bindimamaka mingi, eloko nini elekaka o eleko ya bomoni mpe ya kobimisa mabala ya talo epayi ya bato ? Bilembo nini bitikalaka na bisika bazali kobimisa mabanga ya talo, maye bizali mosika na bituka maye bato bazali ebele ?
Ezali na makambo ebele ya koloba na oyo etali nini ekoleka na nzinganzinga. Mosika te na Bukavu, ndakisa na Luhwinja, ezali na maziba bisalemi na bato bisika bokozua cyanure, mpe pembeni ya maziba bisalemi na bato, bibwele bizali kokufa, bato bazali kozua ba maladi, mayi ezali ya kobeba. Bipayi binso na sudi ya province, bisika nionso yo okotimola, ezali na mwa mabanga ya ntalo, mpe bokomona ete bizali basi na bana baye bazali kosala na ba carrés ya mabanga ya ntalo, na bisalelo bilongobani te. Bato babatelami te liboso ya maladi. Mombongo ya mindoki make, kimobulu, ya lolenge nionso, bizali na bisika bina. Kasi likambo ezali wana yango oyo: epayi nionso bokomona maganga ya ntalo, wana bokomona mombongo epekisami, oyo tokoki koyeba te to koyeba lolenge nini ezali kosalema.
Mabanga ya ntalo bizali na bokutani kati na kozanga boyengi, kokolisa kimobola ya bana mboka mpe bozangi ya Leta na bisika bina. Na yango wana, mpo na kozongisa alima, lokola Papa Franswa alobaka na Kinshasa, esengeli kolongola maboko na Congo. Pamba tè oyo ezali kosalema awa ezali kaka mabe ya bana Congo te, kasi ezali mafia ya mokili mobimba. Pamba tè ezali malamu te ete epayi mosusu, ntango ba otage bazali, na botosi nionso nazali mpo na bato wana, o eleko bakotika bango, ezali feti -mpe nazali kati na feti na bango. Kasi awa, bozali na bisika bato bakima bitumba, bisika bato bazali kokufa ba nkoto na ba nkoto mikolo nionso. Kasi minda ya mokili mobimba bikoma bipayi boye te, bapanzi nsango bakomaka awa te.
Ezali lokola soki mombongo endingisamaki ya solo na ba multinationales biye bikotambola malamu mpe bikolemba te ya koteya bana mboka na bolobi na bango: “ezali likambo na bino moko lokola bozali babola, ezali likambo na bino moko lokola bozonga nsima”, mpo na bozongeli maloba ya kanda koleka. Ya solo, ezali na lolenge ya kolongola hypocrisie na bisika wana? Pamba tè bato bazali kokufa mpe eyebani ete ezali etumba mpo ya boluki mabanga ya ntalo, ya boluki ba ressources naturelles. Nzokande, lokola elobamaka, ezali na lolenge ya kolonga lisanga, ya bosali ba partenariats gagnant-gagnant. Mabanga ya ntalo bizali awa, tokoki kobimisa yango, kasi na nzela ya gagnant-gagnat. Baye bazali kobimisa bazua oyo bakoki kozua, kasi batika awa mwa moke ya mosolo, babongisa biteyela, babongisa bisika ya kobikisa bato ya maladi, babongisa ba nzela.
Bokomona awa, ezali na bangomba maye bakata, na mpasi te na bongo. Kaka na eleko ena, misala maye masengeli bizali te. Yango wana ezali kosala mpasi, mpe ntango mosusu yango ezali kosala bato bakota zamba mpo na kobanda mobulu, mpo ete bango lokola basala mobeko. Pamba tè, ensengeli te kobimisa oyo ezali kopesa bomengo na bato basusu, mpe na ngambo mosusu bozali kaka kozanga bokengi mpe na liwa. Nakolongola misala ya leta te baye basengeli kosala mosala na bango, kasi ntango mosusu ezali bobomi bato eye ezali kosala ete leta azali na mpasi ya kosala bisika misusu, na complicité bipayi binso.
Lolenge ya bato ekobongama te?
Eloko moko ezali te. Tozali na etuka ya Bukavu. Soki obimi na etuka, nsima kaka ya kilometre mitano, mayi ya miso ekokita! Misala bisengeli bizali te. Ezali ba Eklezia na ba ONG bazali komeka kosala mwa mosala. Leta azali komeka kotelemisa, kasi ezali mpasi. Emonani ete misala bisengeli kozala bizali lisusu te. Ntango okotuna na baye bazali kobimisa mabanga ya ntalo ya kobongisa ba nzela na ndenge elongobani lokola bipayi misusu, bazali kokoka kokima misala na bango, na ntango eye eyebani ete bandimaka kosala yango lokola mibeko ya mboka bisengi. Nakanisi ete mpo na motuna ena, mingi ya kosala ezali. Esengeli kopesa maboko na bulamatari ya province, kopesa maboko na ba organisations ya société civile mpo bazala lisusu miso gà. Ebongi mpe kobongisa, zinganzinga ya mombongo, mpo ete bobimisi mabanga ya ntalo esalema na lolenge moto nionso azali komona, na lolenge ya gagnant-gagnant, mpo ete na bisika bazali kobimisa mabanga, biteyelo ya malamu bizala, ba nzela ya malamu. Basali moko moko ya biloko wana, kasi ya solo esalemi na ndenge elongobani te soki totali ya mbano eye bazali kozua.
Tokoki kolikya ete, na mwa tango moke mikoyà, likambo mpe klima ya misala ya mabanga mantalo ekobongama o katiya RDC, mingi mingi ezala mpo ya lifuti (litombà, bolamu) ya bato? Mwa bilembo ya kolikya ezali?
Nandimi ete ezali na bilembo ya elikya, mpo ete ekolo mobimba mpe o kati ya bitukà esosolaki ete ezali malamu te mpo na ba wolo ya Congo evwamisa bampaya to mpe ete bazali kobatela bitumba mpo na bankita ya nsé ya mabela mànà. Ezali na bilembo ya elikya, kasi tosengeli mpenza kosala mbongwana ya moto na moto mpe ya lisanga mpo na liboso koleka bolingo ya ekolo liboso ya matombà ya moimi. Ezali na mikanda ebele, bomipesi ebele, esengeli mutu nionso azua bontoki ya likambo ya yé mpe nandimi ete nazali na ngambo ya ba optimistes. Makambo ekoki kobongwana soki biso banso tomikotisi na kozala na ngambo ya malamu ya mbongwana. Bandoto ekoki kokokisama.
Mobù ya Yubilé ekobianga biso na Elikya
Tozali banso « bato bamobembo ya elikya» mpe tokolikya ete lobi ekozala malamu ya lelomei. Bongo tosengeli kotambola loboko na loboko nakosala elongo mp ona etukà oyo ya bitimà binene. Tozali na mabongisi ya lisanga nà ACEAC (Association ya ba conférences épiscopales na Afrique centrale), na nivo ya baeklezya ba biso na bamindelo. Bato ya bamboka balingi kotombola na lisangà ya bato mpe na limemya ya bozalani, bongo bandoto mànà manso epesameli nayino lisusu. Na tondi yo botondi.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa