Baepiskopo ya lingomba ya katolike ta Côte d’Ivoire babengisi boyokani mpe elikya
Albys KBD, cp - Kinshasa/RDC
Na kombo ya « ba pelerins ya espoirs na église mpe na ekolo ya ivoire », communiqué de presse oyo ebimisamaki na miso ya bato na suka ya bokutani ya ba episkopo ya Ivoire liboso ya nioso elakisaka botondi na bango na pàpa françois mpo na mobu, mosantu oyo ye a decreter, na espoir été ekozala mpo na moto nyoso, « moment ya bokutani ya solo mpe ya moto ye moko na nkolo yezu » sima, sanza libwa yambo ya maponami ya mokonzi ya mboka na mboka, ba episkopo ba invinter ba ivoiriens « kobalukela nzambe na nzela ya losambo mpe kokila bilei.
Kolendisa bolamu ya bato banso mpe boyokani
Ba episkopo ya katoliko ya Cote d’Ivoire basambelaki mpe bazali kolikya ete mbuma ya mbula oyo ya yubilé, oyo ekokani na yubilé ya wolo ya likita na bango ya boepiskopo, «epesa maboko mpo na kotonga lisangà ya malamu koleka ya losambo mpe ya politiki». ba beti nsete mpe esengeli koluka boyokani, kozala «koyoka bamposa ya moko na mosusu pe gestion transparente ya bien commun entre ba strates sociales pe religieux differents ekozua esika na yango kuna».
Na nsango na bango, ba episkopo ya ivoire, lisusu, bamonisaki botondi na bango nyonso epai ya pàpa franswa mpe na nuncio apostolique na Cote d’Ivoire, Mgr Mauricio Rueda Beltz, «mpo na nzela ya boyamboli mpe ya boyokani» oyo ba proposer mpo na «kozwa communion mobimba mpe ya mobimba, bisika nyonso oyo ebebisami». ba prélats bamipesi, «lokola nzoto moko, mpo na kolendisa nzela oyo ya boyamboli mpe boyokani na losambo mpe misala, mingi mingi na diocèse ya Moto». na kondima, bolingo mpe elikya oyo ezali na bizaleli ya moklisto nyonso, ba bengisi «banganga- nzambe, mibami na basi ya lingomba lokola mpe ba fideles laics ya klisto, lokola ba pelerins ya elikya, mpo na kotya miso na bango na klisto na ekulusu mpe kotia lingomba mpe ba ekolo ya Ivoire na maboko ya nzambe.
Ko garantir ba conditions justes, transparentes pona ba candidats nionso na maponami ya 2025
Makambo mazali kosalema lelo, lokola maponami mazali kobelema, mazali kotungisa ba episkopo ya Ivoire. Babendaki likebi na likambo oyo ete ekolo ya Ivoire ezali komimona na esika ya mbongwana ya ntina mingi, na mobu oyo ya maponami ya mokonzi ya mboka. Lokola bazalaki komitungisa mpo na mbongwana ya makambo, bakambi ya lingomba ya Ivoire basakolaki ete mosika te bakotindela ekolo yango mokanda ya bopastoli. Nzokande, bazwaki likebi ya bondimi ya mokonzi ya ekolo « kopesa ba conditions ya bosembo mpe polele mpo na ba candidats banso », nzokande basengi na commission electorale independante (CEI) « esala mpo na maponami ya bonsomi, ya kondimama mpe ya bato banso, na ntina ya kolendisa bondimi ya bana mboka na nzela ya maponami ».
Kotalela politiki lokola vocation noble mpo na gestion ya bien commun, ba membres ya conference episcopale Ivoire balendisaki « ba politiciens ba respecter ba valeurs ya intégrité mpe decence ». Bapamelaki makasi lolenge nyonso ya koteka to kosomba ba votes, oyo bamoni ete « ezali na mibeko te mpe oyo endimami te ».
Koboya bmobulu mpe lisusu kosalela mangomba mpe ekolo
Koyeba makambo maponami ba prelats basengaki na ba Ivoiriens bapesa likebi na bango epai ya nzambe na losambo mpe na kokila bilei, mpo ete nguya mpe opposition esala oyo esengeli, na nzela ya mikano mpe misala ya makasi, mpo na kobokisa mboka. «Babengisaki mpe bakambi ya politiki » mpo na koboya mobulu ya ndenge nyonso lokola mpe kosalela mangomba mpe ekolo » na ntango ya campagne électorale.
Baepiskopo basengaki, lisusu na ete bibongiseli oyo etambwisaka makambo emonisa bokengi mpe bosembo na ndenge oyo bazali kosala misala na bango, na ndenge oyo bazali kosala misala na bango, na kotemelaka komeka nyonso ya kanyaka mpe ya kosala bopusi, mpe na ndenge yango, kabatela mokumba na bango ya bizaleli malamu epai ya ekolo.
Mpo na baepiskopo, soki klisto azali elikya na biso, tosengeli kopesa esika mpo na yé na makambo manso ya bomoyi bwa biso ya lisanga, bakisa mpe na kopona bakambi ba biso na mpe na bayangeli matata. «Na mobù moye ya yubilé ya elikya, tolingi lisusu liwa te, tolingi koyemba elikya ». Basukisaki na nsango na bango.
Lancement ya misala ya wolo ya conférence épiscopale
Na oyo etali kosepela jubilé ya wolo ya likita ya ba episkopo ya katolike ya Cote d’Ivoire, ba episkopo ba validaki linaka ya ba fêtes oyo e inauguré na misa ya bosukisi ya 126e session ordinaire na bango. Linaka oyo ezali na ba conferences ya formation, ba pelerinages indulgents lokola pe mikolo ya penitence, kokila bilei pe reconciliation. Ba précisé ke misala miye ya bakundoli ekosalema na ba diocèses nionso mpe ekosuka na misa ya bosukisi ya likita na bango ya sima ba episkopo ya Ivoire bamemaki mpe likebi ya bandimi na bango kondima mobeko ya koleka unité universitaire na cote d’Ivoire, oyo babengi « Unioversité Catholique ya Cote Ivoire » (UCACI), oyo ekozala na ba secteurs ebele, na kati na yango faculté ya médecine, mpe ekozala na diocèse ya yamoussoukro. Lisusu, nsima ya mbula mwambe ya kozela, likita ya baepiskopo ya katolike ezwaki ekateli ya kozongisa boyokani na mikolo ya bilenge ya ekolo (JNJ). Likita monene oyo ya bilenge ya katolike ya Cote Ivoire ekosalema na diocèse ya yamoussoukro, kobanda mokolo ya 19 kino le 24 aout 2025. Toyeba ete 127e session oedinaire ya conference episcopale Ivoire ekosalema kobanda le 19 kino le 25 mai 2025 na centre Yoane Polo wa yambo ya Kodjoboue (Bonoua) na diocèse ya Grand-Bassam, etuka ya lingomba uta na Abidjan.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa